35
Bana ya Isalaele bapesi Balevi bingumba
Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko : « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango. Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso. Mabele ya zingazinga ya bingumba oyo bokopesa na Balevi ekozala etando ya bametele pene nkama mitano kobanda na mir ya engumba. Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude ; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga. Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale. Na nyonso, bokopesa na Balevi bingumba tuku minei na mwambe, moko na moko elongo na mabele na yango ya zingazinga. Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko : libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele ; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. »
Yawe apesi na bana ya Isalaele bingumba ya kokimela
Yawe alobaki na Moyize : 10 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana, 11 bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna. 12 Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila ; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga. 13 Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino : 14 misato na ngambo ya Yordani, mpe misato kati na Kanana. Ekozala bingumba ya kokimela. 15 Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna.
16 Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. 17 Soki abeti moninga na ye libanga, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. 18 Soki abeti moninga na ye nzete, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. 19 Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi : akoboma ye tango kaka akokutana na ye. 20 Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi 21 to soki abeti moninga na ye likofi mpo ete alingaka ye te, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; boye mobukanisi makila akoboma mobomi tango kaka akokutana na ye.
22 Kasi soki moto atindiki moninga na ye na nko te to na kokana te, soki abambi ye eloko na makanisi mabe te, 23 soki akweyiseli ye libanga na nko te mpe na kokana te, mpe moninga yango akufi, 24 lisanga ekokata makambo oyo kolanda mibeko kati ya mobomi mpe mobukanisi makila. 25 Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki.
Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule. 26 Nzokande soki mobomi alongwe na engumba ya kokimela epai wapi akimaki, 27 mpe soki mobukanisi makila akutani na ye libanda ya engumba na ye ya kokimela mpe abomi ye, mobukanisi makila asali mabe te. 28 Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye.
29 Mitindo oyo ekozala mibeko mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino nyonso, na bisika nyonso oyo bokovanda. 30 Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.
31 Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa ; basengeli kaka koboma ye. 32 Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 33 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto. 34 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda ; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › »