36
Libula ya bana basi ya Tselofikadi
Bakonzi ya mabota ya etuka ya bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase mpe mokitani ya Jozefi, bayaki liboso ya Moyize mpe liboso ya bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosolola na bango. Balobaki : « Tango Yawe apesaki mitindo epai ya nkolo na ngai ete apesa mokili lokola libula epai ya bana ya Isalaele na kobeta zeke, apesaki yo mpe mitindo ya kopesa libula ya Tselofikadi, ndeko na biso ya mobali, epai ya bana na ye ya basi. Boye, soki esalemi ete bana basi yango babali mibali oyo bawuti na mabota mosusu ya Isalaele, libula na bango ekolongwa na libula ya batata na biso, mpe bakobakisa yango na libula ya libota ya mibali oyo bakobala bango. Bongo, libula oyo epesamelaki biso ekokoma moke. Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. »
Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela. Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi : ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango. Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu ; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye. Mwana mwasi nyonso kati na bikolo ya Isalaele oyo akozwa mabele lokola libula asengeli kobalana kaka na mobali ya libota ya tata na ye mpo ete moto nyonso ya Isalaele azwa libula ya tata na ye. Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »
10 Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. 11 Bana basi ya Tselofikadi : Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa ; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango. 12 Babalanaki kati na etuka ya bakitani ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, mpe libula na bango etikalaki na libota mpe etuka ya tata na bango.
 
13 Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.