2
Bwanya : bomengo oyo ebombama 
  1 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai  
mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;   
 2 soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya  
mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;   
 3 soki obeleli mayele  
mpe ogangi epai ya bososoli ;   
 4 soki oluki yango penza ndenge balukaka palata  
to bomengo oyo ebombama,   
 5 okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini  
mpe okozwa boyebi ya Nzambe.   
 6 Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,  
mpe maloba ya monoko na Ye epesaka  
mayele mpe bososoli.   
 7 Abongiselaka bato ya sembo elonga  
mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.   
 8 Pamba te abatelaka bayengebene  
mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.   
 9 Boye, okososola likambo nini  
ezali solo, alima, sembo :  
nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.   
 10 Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo  
mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.   
 11 Bososoli ekobatela yo,  
mpe mayele ekobomba yo   
 12 mpo na kobikisa yo na nzela mabe,  
na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,   
 13 na bato oyo batikaka nzela ya sembo  
mpo na kolanda nzela ya molili,   
 14 na bato oyo basepelaka kosala mabe,  
na bato oyo bazalaka na esengo  
ya kokota na bozindo ya mabe,   
 15 na bato oyo nzela na bango etengama-tengama  
mpe etamboli na bango etonda na mobulu.   
 16 Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya,  
liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,   
 17 oyo akima mobali na ye ya bolenge  
mpe abosana boyokani oyo asalaki  
elongo na Nzambe na ye ;   
 18 pamba te ndako na ye ememaka na kufa,  
mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.   
 19 Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka  
mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.   
 20 Boye, okotambola na nzela ya bato malamu  
mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.   
 21 Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili,  
mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;   
 22 kasi bato mabe bakokufa na mokili  
mpe bakolongola bango kati na mokili  
ya bato ya songisongi.