Masese   
 1
Maloba ya ebandeli 
  1 Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :   
 2 mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya  
mpe kososola maloba ya mayele ;   
 3 mpo na kozwa mateya ya bwanya  
oyo epesaka bizaleli ya sembo,  
ya boyengebene mpe makambo ya alima ;   
 4 mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,  
mpe boyebi epai ya bilenge.   
 5 Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,  
mpe akobakisa bwanya na ye,  
bongo moto ya mayele akoyeba mayele  
ya kotambolisa bato ;   
 6 mpo na kososola masese mpe sambole,  
maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.   
Fungola ya bwanya 
  7 Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;  
bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.   
 8 Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,  
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;   
 9 Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,  
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.   
 10 Mwana na ngai ya mobali,  
soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.   
 11 Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso,  
tika ete tosala motambo mpo na koboma bato,  
tokosepela mpo na kokanga moto  
oyo ayebi likambo te !   
 12 Ndenge mokili ya bakufi esalaka,  
tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba  
lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;   
 13 tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge,  
mpe tokotondisa bandako na biso  
na bomengo ya bitumba ;   
 14 okozwa ndambo na yo epai na biso,  
pamba te biso nyonso tokosangisa  
biloko na biso esika moko ; »   
 15 mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te,  
longola makolo na yo na nzela na bango ;   
 16 pamba te makolo na bango ekimaka mbangu  
mpo na kolanda mabe,  
mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.   
 17 Solo, ezali pamba kotia monyama  
liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.   
 18 Kasi bango, batiaka mitambo  
mpo na kosopa makila na bango moko,  
bamilukelaka pasi na bomoi na bango.   
 19 Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta  
asukaka kaka bongo,  
mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.   
Bwanya azali kobelela 
  20 Bwanya azali koganga na libanda,  
atomboli mongongo na ye na bisika  
oyo bato ebele bakutanaka ;   
 21 azali koganga na bisika ya loyenge  
mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba :   
 22 « Yo moto oyo ozangi mayele,  
kino tango nini okolinga bozoba na yo ?  
Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ?  
Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba  
koyina mayele ?   
 23 Soki boyoki makebisi na Ngai,  
nakosopela bino Molimo na Ngai  
mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.   
 24 Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela  
mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,   
 25 lokola bobwakaki toli na Ngai  
mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,   
 26 Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino,  
nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,   
 27 tango minyoko ekokomela bino na pwasa  
lokola mvula ya kake makasi,  
tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki,  
tango mawa mpe somo ekokomela bino.   
 28 Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ;  
bakoluka Ngai na ngonga ya malamu,  
kasi bakomona Ngai te.   
 29 Lokola bayinaki boyebi  
mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,   
 30 lokola baboyaki kondima toli na Ngai  
mpe batiolaki pamela na Ngai,   
 31 bakolia mbuma ya etamboli na bango  
mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.   
 32 Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele  
ekoboma bango,  
mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele  
ekoboma kaka bango moko ;   
 33 kasi moto oyo ayokaka Ngai  
akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »