Nzembo 150
Bokumisa Yawe na mindule 
  1 Bokumisa Yawe !  
Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,  
bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene  
epai wapi avandi na nguya makasi !   
 2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !  
Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !   
 3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;  
bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !   
 4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !  
Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !   
 5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !  
Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !   
 6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !  
Bokumisa Yawe !