Emoniseli
1
Maloba ya ebandeli
Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto.
Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye. Lokola motatoli, Yoane asakolaki Liloba na Nzambe ndenge Yesu-Klisto ayebisaki ye yango ; asakolaki makambo nyonso oyo amonaki. Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.
Bambote
Yoane ;
 
Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia :
 
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi, mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili !
 
 
Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye, Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !
« Botala, azali koya kati na mapata !
Miso nyonso ekomona Ye,
ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ;
mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. »
Ekosalema penza bongo ! Amen.
« Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe,
« Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya,
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »
Yoane amoni Klisto kati na emoniseli
Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu. 10 Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo 11 koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »
12 Nalukaki kobaluka mpo na koluka koyeba nani oyo azali koloba na ngai. Mpe tango nabalukaki, namonaki bitelemiselo sambo ya minda, basala na wolo. 13 Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye. 14 Moto mpe suki na Ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Miso na Ye ezalaki lokola moto oyo ezali kopela makasi. 15 Makolo na Ye ezalaki lokola bronze oyo babimisi sika longwa na fulu ya moto makasi, mpe mongongo na Ye ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ya ebale monene. 16 Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.
17 Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka. 18  Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.
19  Yango wana, koma makambo oyo omoni, oyo ezali sik’oyo, mpe oyo ekoya na sima. 20  Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »