Mikanda epai ya Mangomba sambo
2
Epai ya Lingomba ya Efeso
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso :
 
« Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :
 
Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi. Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : obwaki bolingo na yo ya liboso. Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango. Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
Epai ya Lingomba ya Simirne
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne :
 
« Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi :
 
Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana. 10  Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.
11  Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
Epai ya Lingomba ya Pergame
12  Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame :
 
« Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :
 
13  Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.
14  Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba. 15  Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola. 16  Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.
17  Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »
Epai ya Lingomba ya Tiyatire
18  Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire :
 
« Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya :
 
19  Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo ; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.
20  Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu. 21  Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye. 22  Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi. 23  Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
24  Kasi epai na bino oyo, kati na Tiyatire, bokangami te na mateya wana ya lokuta mpe boboyi koyekola mabombami ya mozindo ya Satana, kolanda ndenge babengaka yango, nazali koloba : ‹ Nakomemisa bino te mokumba mosusu na makasi ; 25  kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›
26  Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo : 27  akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki, 28  ndenge Ngai mpe nazwaki bokonzi kowuta na Tata na Ngai. Nakopesa ye lisusu monzoto ya tongo. 29  Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »