Isalaele kati na lisolo ya lobiko
9
Nzambe apona Isalaele
Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu : motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te. Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai, oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !
Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te, mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. » Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye. Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami : « Kaka na eleko oyo, nakozonga, mpe Sara akozala na mwana mobali. »
10 Esukaki kaka wana te : Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso. 11 Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama, 12 kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka : « Kulutu akosalela leki, » 13 kolanda ndenge ekomama : « Nalingaki Jakobi, kasi nayinaki Ezawu. »
14 Boye toloba nini ? Mabe ezali kati na Nzambe ? Soki moke te !
15 Pamba te alobaki na Moyize :
« Nakotalisa ngolu epai ya moto
oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu,
mpe nakoyokela mawa moto
oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. »
16 Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu. 17 Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. » 18 Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.
Nzambe asalaka nyonso oyo alingi
19 Bato bakoki koloba : « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye ? » 20 Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? » 21 Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko ?
22 Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ? 23 Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo ? 24 Ezali biso nde Nzambe abengaki, kaka kati na Bayuda te kasi mpe kati na Bapagano, 25 kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze :
« Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai,
mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te
molingami na Ngai. »
26 Mpe,
« kaka na esika oyo balobaki na bango :
‹ Bozali bato na ngai te, ›
bakokoma kobenga bango
‹ bana na Nzambe na bomoi. › »
27 Ezayi agangaki na tina na Isalaele :
« Ata soki motango ya bana ya Isalaele
ezalaki lokola zelo ya ebale monene,
ndambo kaka nde bakobika.
28 Pamba te Nkolo akokokisa Liloba na Ye
na mobimba na yango
mpe na lombangu kati na mokili. »
29 Ezali ndenge kaka Ezayi amisakolelaki :
« Soki Nkolo, Mokonzi ya mampinga, atikelaki biso bakitani te,
tolingaki kokoma lokola engumba Sodome,
tolingaki kokokana na engumba Gomore. »
Isalaele mpe lobiko na nzela ya kondima
30 Boye, toloba lisusu nini ? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima, 31 kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko atikali kokoma sembo te. 32 Mpo na nini ? Pamba te balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana babetaki libaku na libanga oyo ekweyisaka, 33 kolanda ndenge ekomama :
« Tala, nazali kotia kati na Siona
libanga oyo ebetisaka bato mabaku,
libanga monene oyo ekweyisaka bato ;
moto oyo akotiela yango motema
akotikala koyokisama soni te. »