10
Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika. Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te. Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo. Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.
Tala ndenge nini Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na Mobeko : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. » Kasi tala ndenge nini bosembo oyo ewutaka na kondima elobaka : « Komilobela te kati na motema na yo : ‹ Nani akomata kuna na Likolo ? › Ezali lokola kokitisa Klisto wuta na Likolo to mpe : ‹ Nani akokita kati na libulu monene mpe ya molili makasi ? › Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. » Boye, elobaka penza nini ? « Liloba ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo. » Liloba yango nde ezali Liloba ya kondima, mpe yango nde tozali kotatola. Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ; 10 pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko. 11 Makomi eloba : « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. » 12 Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye. 13 Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
14 Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ? 15 Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »
16 Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? » 17 Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto. 18 Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama :
« Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba,
maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
19 Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba :
« Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa,
nakosala ete boyoka kanda
mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »
20 Mpe Ezayi akomaki kino na koloba :
« Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te,
namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »
21 Kasi alobaki boye mpo na Isalaele :
« Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba
epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »