11
Nzambe asundolaki Isalaele te
Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame. Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele :
— Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.
Kasi eyano nini Nzambe azongiselaki ye ?
— Nabombi bato nkoto sambo mpo na Ngai, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te.
Ezali mpe bongo na tango oyo : ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye. Nzokande, lokola koponama yango esalemaki na ngolu, elakisi ete ezali likambo ya misala te ; soki te, ngolu ezali lisusu ngolu te.
Boye toloba lisusu nini ? Eloko oyo bana ya Isalaele bazalaki koluka, bazwaki yango te ; kaka bato oyo Nzambe aponaki kati na bango nde bazwaki yango. Bato mosusu bakoma mitema mabanga, kolanda ndenge ekomama :
« Nzambe apesaki bango molimo ya pongi,
miso mpo ete bamona te,
mpe matoyi mpo ete bayoka te,
kino na mokolo ya lelo. »
Mpe Davidi azali koloba :
« Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango,
monyama, libaku ya kokweya mpe ya kozwa etumbu !
10 Tika ete miso na bango ekufa
mpo ete bamona lisusu te,
mpe babela mikongo mpo na libela ! »
Isalaele ekweyi mpo na libela te
11 Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele. 12 Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?
13 Nazali koloba na bino Bapagano : lokola nazali ntoma ya Bapagano, napesaka lotomo na ngai lokumu 14 na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango. 15 Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini ? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi ? 16 Nzokande, soki mapa ya liboso oyo babonzeli Nzambe ezali bule, elingi koloba ete mapa nyonso oyo etikali ezali mpe bule ; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete bitape na yango mpe ezali bule.
17 Kasi soki bitape mosusu ekatamaki ; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki ; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive, 18 kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatamaki. Soki omeki kobeta tolo, yeba malamu ete ezali yo te nde ozali komema mosisa, kasi ezali mosisa nde ezali komema yo. 19 Okoki mpe koloba : « Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango. » 20 Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba. 21 Pamba te soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.
22 Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe : kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama. 23 Mpe soki bato ya Isalaele bawumeli te kati na kozanga na bango kondima, bakokangisa bango lisusu na nzete, pamba te Nzambe azali na makoki ya kokangisa bango lisusu na nzete. 24 Boye, soki yo owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ezala soki yango te nde ebimisaki yo, ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango ?
Bato nyonso ya Isalaele bakobika
25 Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe. 26 Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, kolanda ndenge ekomama :
« Mokangoli akobimela na Siona,
akolongola mabe kati na Jakobi.
27 Mpe yango nde ekozala boyokani na Ngai elongo na bango
tango nakolongola masumu na bango. »
28 Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino ; kasi mpo na oyo etali koponama oyo Nzambe asalaki, bazali balingami na Ye likolo ya bakoko na bango, 29 pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga. 30 Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe mpe sik’oyo Nzambe ayokeli bino mawa likolo ya kozanga botosi ya Bayuda, 31 ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa. 32 Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa.
Lokumu epai ya Nzambe
33 Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe
ezali na mozindo mingi !
Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye
mpe kososola nzela na Ye !
34 « Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ?
Nani akomaki kopesa Ye toli ?
35 Nani apesaki Nkolo eloko
mpo ete Nkolo azongisela ye ? »
36 Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye,
na nzela na Ye mpe mpo na Ye.
Tika ete nkembo ezonga epai na Ye
mpo na libela na libela ! Amen !