Bomoi ya Moklisto
12
Komikaba epai ya Nzambe
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli. Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Pamba te ndenge kaka moko na moko kati na biso azali na biteni ebele kati na nzoto na ye, mpe eteni moko na moko ezalaka na mosala na yango, ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu. Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima, tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !
Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te ! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu. 10 Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ; 11 mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ; 12 mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ; 13 mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.
14 Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino ; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te ! 15 Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela. 16 Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.
17 Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso. 18 Lokola ekoki kosalema, mpe lokola bino nde bosengeli kopesa nzela, bozalaka na kimia na bato nyonso. 19 Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo. 20 Nzokande,
« Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ;
soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi.
Pamba te, soki osali bongo,
okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
21 Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.