13
Botosi epai ya bakonzi ya leta
Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali. Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, mpe bato oyo basalaka bongo bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko. Bato oyo batambolaka malamu babangaka basambisi te, kaka bato oyo basalaka mabe nde babangaka basambisi. Oboyi kobanga mokonzi ? Sala makambo oyo ezali sembo, mpe mokonzi akondima yo. Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe. Yango wana ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi-mingi mpo na kosala makambo oyo mitema na biso ezali kosenga biso.
Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesaka tango na bango nyonso mpo na kokamba. Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.
Bolingo
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka. Mibeko lokola : « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » 10 Moto oyo azali na bolingo asalaka moninga na ye mabe te. Boye, kolinga moninga, yango nde kokokisa Mobeko nyonso.
Mokolo ekomi pene
11 Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika. 12 Butu ekomi pene ya kosila mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole. 13 Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi : na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te. 14 Kasi bolata Nkolo Yesu-Klisto mpe bomitungisa te na baposa ya nzoto oyo ezali kobundisa bino.