Zakari
Buku ya bimoniseli
1
Kobengama mpo na kobongola motema
Na sanza ya mwambe, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido :
— Yawe atombokelaki bakoko na bino makasi. Yango wana, loba na bato oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bozonga epai na Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe Ngai nakozonga epai na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe. Wapi sik’oyo bakoko na bino ? Boni, basakoli yango bazali kaka na bomoi kino na mokolo ya lelo ? Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »
Emoniseli ya liboso : bampunda
Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, sanza ya shebati, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido.
Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe. Natunaki :
— Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ?
Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki :
— Nakolakisa yo tina na yango.
10 Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki :
— Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele.
11 Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite :
— Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba.
12 Anjelu ya Yawe alobaki :
— Yawe, Mokonzi ya mampinga, kino tango nini okoboya koyokela engumba Yelusalemi mawa mpe bingumba mosusu ya Yuda, bingumba oyo okangela kanda mibu tuku sambo mobimba ?
13 Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.
14 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki :
— Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona. 15 Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › » 16 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa ; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
 
17 Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »