2
Emoniseli ya mibale : maseke minei mpe bato minei ya misala ya maboko
Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai. Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai :
— Maseke wana elakisi nini ?
Azongiselaki ngai :
— Maseke wana ezali bikolo ya nguya oyo epanzaki Yuda, Isalaele mpe Yelusalemi.
Yawe alakisaki ngai bato minei ya misala ya maboko. Natunaki :
— Bato oyo bayei kosala nini ?
Azongisaki :
— Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.
Emoniseli ya misato : singa oyo bamekelaka molayi
Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye. Natunaki ye :
— Ozali kokende wapi ?
Azongiselaki ngai :
— Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.
Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye mpe alobaki na ye :
— Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka. Ngai moko, nakozala mir ya moto zingazinga na yango, » elobi Yawe, « mpe nakomonisa nkembo na Ngai kati na yango. »
10 Tokende ! Tokende ! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.
11 Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko ! 12 Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai. 13 Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.
14 Siona, mboka kitoko, ganga na esengo mpe sepela, pamba te nazali koya kovanda kati na yo, elobi Yawe. 15 Na mokolo wana, bato ya bikolo ebele bakoya kosangana elongo na Yawe mpe bakokoma bato na Ngai. Nakovanda kati na bino ; mpe na bongo, bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. 16 Yawe akokomisa Yuda lokola libula na Ye moko penza kati na mabele ebulisama, mpe akopona lisusu Yelusalemi. 17 Tika ete bato ya mokili mobimba bavanda kimia liboso ya Yawe, pamba te Ye moko atelemi mpe abimi na Ndako na Ye ya bule.