3
Emoniseli ya minei : bilamba ya mokonzi ya Banganga-Nzambe
Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye. Yawe alobaki na Satana :
— Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ?
Nzokande, Jozue alataki bilamba ya salite tango atelemaki liboso ya Anjelu. Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye :
— Bolongola ye bilamba wana ya salite !
Mpe alobaki na Jozue :
— Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.
Nalobaki :
— Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto.
Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye.
Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo :
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi. Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.
10 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.