3
Etumbu ya engumba Yelusalemi 
  1 Mawa na engumba ya batomboki,  
engumba ya makambo ya mbindo,  
mpe engumba oyo enyokolaka bato !   
 2 Etosaka moto te,  
endimaka pamela te,  
etiaka elikya na Yawe te,  
epusanaka pene ya Nzambe na yango te.   
 3 Bakalaka na yango bazali lokola bankosi  
oyo ezali koganga ;  
bakambi na yango bazali  
lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa,  
bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.   
 4 Basakoli na yango bazali  
bato ya lolendo mpe ya lokuta.  
Banganga-Nzambe na yango babebisaka  
Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.   
 5 Kati na engumba yango,  
Yawe azali sembo, asalaka mabe te ;  
mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye  
mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo.  
Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te  
amonaka likambo ya soni te.   
 6 Nabomi bato ya bikolo mosusu,  
bandako na bango ya makasi ebebisami.  
Nasali ete babalabala na bango  
etikala lisusu na bato te  
mpo ete moto moko te alekela lisusu wana.  
Bingumba na bango ebebisami,  
ata moto moko te atikali lisusu kuna.   
 7 Namilobelaki boye na tina na engumba oyo :  
« Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! »  
Boye bandako na yango ekobukana lisusu te,  
mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te.  
Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala  
misala na bango ya mabe.   
 8 Yango wana, « bozela Ngai, »  
elobi Yawe,  
« bozela Ngai na mokolo oyo nakoya  
mpo na kosamba elongo na bino ;  
nazwaki mokano ya kosangisa  
bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso  
mpo na kosopela bango kanda na Ngai,  
makasi nyonso penza ya kanda na Ngai :  
mokili mobimba ekozika na moto  
ya nguya ya kanda na Ngai.   
Litomba ya etumbu 
  9 Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo  
mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka  
mpo na kobelela Kombo ya Yawe  
mpe kosalela Ye na motema mobimba.   
 10 Longwa na likolo ya bibale ya Kushi,  
bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ;  
bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai,  
bakomemela Ngai makabo.   
 11 Na mokolo wana, oh bato na Ngai,  
bokoyokisama lisusu soni te  
mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai,  
pamba te nakolongola bato  
oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino.  
Boye bokomitombola lisusu te na lolendo  
na ngomba na Ngai ya bule.   
 12 Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela,  
bato oyo batambolaka na komikitisa,  
bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.   
 13 Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te,  
bakokosa lisusu te  
to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango.  
Bakolia mpe bakolala na kimia,  
mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.   
 14 Siona, mboka kitoko, yemba nzembo !  
Isalaele, ganga makasi !  
Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ;  
mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !   
 15 Yawe alongoli etumbu na yo  
mpe akimisi banguna na yo.  
Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ;  
kobanga lisusu pasi moko te.   
 16 Na mokolo wana,  
bakoloba na Yelusalemi :  
‹ Oh Siona, kobanga te !  
Tika ete maboko na yo elemba te !   
 17 Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,  
azali Elombe Mobikisi.  
Akosepela na yo makasi  
mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;  
akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›   
 18 Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama,  
nakolongola pasi kati na yo  
mpo ete ozala lisusu na soni te.   
 19 Na tango wana, nakobeta bato nyonso  
oyo banyokolaki yo,  
nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu  
mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai.  
Nakopesa bango lokumu  
mpe nakosala ete sango na bango  
epanzana na mikili nyonso  
epai wapi basambwisaki bango.   
 20 Na tango wana, nakosangisa bino,  
nakozongisa bino na mokili na bino.  
Nakopesa bino lokumu  
mpe nakosala ete sango na bino epanzana  
kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili  
tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino,  
oyo bakendeki na bowumbu, »  
elobi Yawe.