2
Kobengama ya bato oyo batalelaka Yawe
Oh ekolo oyo eyokaka soni te,
bosangana nanu bino nyonso
mpe bokanisa malamu
liboso ete mokolo oyo ekatama
mpo na kosambisama ekoka,
liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso
oyo mopepe ememi,
mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !
Boluka Yawe,
bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili,
bino oyo bokokisaka mitindo na Ye !
Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa !
Tango mosusu bokobika
na mokolo ya kanda ya Yawe.
Etumbu ya Filisitia
Bakosundola engumba Gaza,
bongo engumba Ashikeloni ekobebisama ;
bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi
mpe bakopikola engumba Ekroni.
 
Mawa na bino bavandi ya etuka
oyo ezali pembeni ya ebale monene,
bino bato ya Kereti !
Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino :
« Kanana, mokili ya bato ya Filisitia,
nakobebisa yo,
mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene,
epai wapi bato ya Kreti bavandaka,
ekokoma esika ya babateli bibwele
mpe lopango ya kobokola bibwele.
Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda ;
bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango.
Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni,
pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango,
akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango,
oyo bakowuta na bowumbu.
Etumbu ya mokili ya Moabi mpe ya Amoni
« Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai
mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola
mpe koluka kobotola mabele na bango.
Yango wana, na Kombo na Ngai, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele,
« Moabi ekokoma penza lokola Sodome,
mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ;
ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe,
esika ya mabulu ya mungwa,
esika ebebisama mpo na libela.
Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi,
mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa
mikili yango lokola libula. »
10 Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga. 11 Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.
Etumbu ya Kushi
12 Bino mpe bato ya Kushi
bokokufa na mopanga na ngai.
Etumbu ya Asiri
13 Akosembola loboko na Ye
mpo na kobundisa etuka ya nor,
akobebisa Asiri
akobebisa penza Ninive mobimba
mpe akokawusa yango lokola esobe.
14 Ekokoma esika oyo bitonga
mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala.
Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa
butu na yango na basonge ya bandako na yango.
Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa,
libebi na libebi nde ekomonana
na bikotelo ya bandako,
mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.
15 Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo,
oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela :
« Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. »
Ndenge nini engumba oyo ebebisami,
ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama !
Bato nyonso oyo bakolekela wana
bakobeta piololo mpe koningisa mito.