6
Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ; pamba te Nzambe alobi :
« Na tango ya malamu, nayanolaki yo ;
mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. »
Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso. Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi
kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;
kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;
kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;
kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;
kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;
kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ;
kati na bibundeli ya bosembo
mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;
kati na lokumu mpe soni,
kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe.
Mpe lisusu,
kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta,
nzokande tolobaka solo ;
koyebana lokola bato oyo bayebani te,
nzokande toyebani makasi ;
koyebana lokola bakufi,
nzokande tozali bato ya bomoi ;
koyebana lokola bato bakweyisama,
nzokande baboma biso te ;
10 koyebana lokola bato na mawa,
nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ;
koyebana lokola babola,
nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ;
koyebana lokola bato bakelela,
nzokande tozali na nyonso.
 
11 Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama. 12 Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino. 13 Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !
Kokabwana na mabe
14 Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ? 15 Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ? 16 Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko :
« Nakovanda kati na bango
mpe nakotambola elongo na bango.
Nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na ngai. »
17 Yango wana,
« Bobima kati na bango
mpe bokabwana na bango,
elobi Nkolo ;
bosimba eloko moko te ya mbindo,
mpe ngai nakoyamba bino. »
18 Mpe,
« Nakozala Tata mpo na bino,
mpe bino bokozala bana mibali
mpe bana basi mpo na ngai,
elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »