7
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Esengo ya Polo
Bopesa biso esika kati na mitema na bino ! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko. Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino. Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo.
Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso : bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso. Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito. Tolendisamaki na nzela ya boyei ya Tito kaka te, kasi mpe na nzela ya kobondisama oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino, mpe komipesa na bino mpo na ngai. Mpe nyonso wana esalaki ete esengo na ngai ebakisama lisusu makasi.
Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na nzela ya mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi te kati na motema na ngai. Solo, esalaki ngai nanu pasi na motema, na kotala ndenge eyokisaki bino mawa mpo na mwa tango moke. Kasi sik’oyo, nazali kosepela : ezali te mpo boyokaki mawa, kasi mpo ete mawa yango ememaki bino na kobongola mitema. Pamba te mawa na bino ezalaki malamu na miso ya Nzambe ; mpe na bongo, tosalaki bino mabe te.
10 Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.
11 Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino : bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.
12 Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe.
13 Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema. 14 Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo. 15 Mpe bolingo na ye mpo na bino nyonso ekomaka lisusu monene tango akanisaka botosi na bino nyonso mpe ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolenga.
16 Nazali na esengo ya kotiela bino motema na makambo nyonso.