10
Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe,
ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka
bwanya mpe lokumu.
Motema ya moto ya bwanya ekendaka
na nzela ya malamu,
kasi motema ya zoba ekendaka na nzela ya mabe.
Ata tango zoba atambolaka na nzela,
bozangi mayele na ye etalisaka
na bato mosusu ete azali zoba.
 
Soki mokonzi atombokeli yo,
kolongwa na esika na yo ya mosala te ;
pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.
 
Namonaki mabe moko na se ya moyi,
lokola libunga epai ya bakonzi :
bazoba batombolami na bisika ya lokumu makasi,
kasi bazwi batikali na bisika ya se.
Namonaki bawumbu kotambola likolo ya bampunda,
mpe bakonzi kotambola na makolo lokola bawumbu.
 
Moto oyo atimoli libulu akoki kokweya
kati na yango ;
mpe moto oyo abuki mir ya lopango,
nyoka ekoki koswa ye.
 
Moto oyo abukaka mabanga akoki kozoka na yango,
oyo apasolaka mabaya akoki mpe kozwa likama.
 
10 Soki epasola esili minu mpe bapelisi yango te,
moto oyo akosalela yango akobimisa makasi mingi ;
kasi bwanya epesaka elonga.
 
11 Soki nyoka eswi moto liboso ete asakanisa yango,
litomba ezali lisusu te epai ya moto
oyo asakanisaka banyoka.
 
12 Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo,
kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.
13 Abandaka na maloba ya bozoba
mpe asukisaka na maloba ya mabe.
14 Zoba alobaka mingi.
 
Moto moko te ayebi makambo oyo ekoya ;
nani akoki koyebisa ye makambo
oyo ekosalema sima na ye ?
 
15 Mosala ya zoba elembisaka ye,
ayebi ata kutu te nzela oyo ememaka na engumba.
 
16 Mawa na mokili oyo mokonzi na yango
azali mwana moke,
mpe oyo bakambi na yango balangwaka
masanga na tongo-tongo !
17 Esengo na mokili oyo mokonzi na yango abotama
na libota ya bato minene,
mpe oyo bakambi na yango baliaka na tango
oyo esengeli mpo na kozwa makasi,
kasi mpo na kolangwa masanga te.
 
18 Soki moto azali goyigoyi,
likolo ya ndako na ye ekobukana ;
soki maboko na ye elemba,
ndako na ye ekotanga mayi.
 
19 Basalaka feti mpo na kosepela,
mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema,
mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.
 
20 Kolakela mokonzi mabe te,
ezala kati na motema na yo ;
kolakela mozwi mabe te,
ezala na mbeto na yo ya kolala,
pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo
mpe kopanza sango ya maloba na yo.