11
Kosala tango moyi ezali nanu
Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi,
pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.
Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe,
pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.
 
Soki mapata etondi na mayi,
ebetisaka mvula na mokili.
Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi,
ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.
Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te,
moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.
 
Ndenge oyebi te nzela ya mopepe
to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye,
ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe
oyo azali Mokeli ya nyonso.
 
Na tongo, lona milona na yo,
mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te,
pamba te oyebi te milona nini ekobima,
ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
Kanisa Mokeli na yo tango ozali nanu elenge
Pole ezali malamu,
mpe miso esepelaka komona moyi.
Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi,
tika ye asepela na mibu yango nyonso ;
kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele,
mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.
 
Elenge, sepela na bolenge na yo,
mpe tika ete motema na yo esepela
na mikolo ya bolenge na yo !
Landa nzela ya motema na yo
mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ;
kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso,
Nzambe akosambisa yo.
10 Yango wana, longola mawa na motema na yo,
longola pasi na nzoto na yo ;
pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.