3
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango,
mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango,
na se ya moyi.
 
Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa,
tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami ;
tango ya koboma mpe tango ya kobikisa,
tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;
tango ya kolela mpe tango ya koseka,
tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;
tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango,
tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze ;
tango ya koluka mpe tango ya kobungisa,
tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka ;
tango ya kopasola mpe tango ya kobamba,
tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;
tango ya kolinga mpe tango ya koyina,
tango ya bitumba mpe tango ya kimia.
Litomba nini mosali azwaka na mosala oyo amonelaka pasi ? 10 Natalaki mokumba oyo Nzambe amemisaki bato. 11 Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
12 Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato : ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi. 13 Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.
14 Nayebi ete makambo nyonso oyo Nzambe asalaka ewumelaka seko ; boye ezali ata na eloko moko te ya kobakisa na likolo na yango to ya kolongola kati na yango. Nzambe asalaka yango bongo mpo ete bakumisa Ye.
15 Makambo oyo ezali lelo esila kozala na kala,
mpe makambo oyo ekoya ezala wuta kala ;
Nzambe nde azongisaka makambo
oyo esila koleka na tango ya kala.
16 Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi :
ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka ;
ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.
17 Namilobelaki kati na ngai :
« Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe,
pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko,
mpe ezali na tango mpo na kosambisa
likambo moko na moko. »
18 Namilobelaki lisusu : « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama. 19 Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama : bango mibale basukaka kaka ndenge moko ; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko : moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba. 20 Nyonso ekendaka kaka esika moko ; nyonso ewutaki na putulu, mpe nyonso ekozonga kaka na putulu. 21 Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele ? »
22 Boye, nasosolaki ete ezali na eloko moko te oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kosepela mpe komona bolamu na mosala na ye, pamba te yango nde ezali litomba na ye. Nani akoki kosunga ye mpo ete amona makambo oyo ekoya sima na ye ?