4
Minyoko
Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi :
Namonaki mpinzoli ya banyokolami,
mpe moto akobondisa bango azalaki te ;
nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli,
mpe moto akobondisa bango azalaki te.
Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala
bazali na bango kutu malamu
koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.
Mpe moto oyo atikala nanu kozala te
azali malamu koleka bango mibale,
pamba te atikala nanu komona te misala mabe
oyo esalemaka na se ya moyi.
Mosala mpe makama na yango
Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Moto oyo azangi mayele akangaka maboko na ye
mpe amibebisaka ye moko.
Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu
koleka maboko mibale oyo etondi na misala makasi
mpe na kolanda mopepe.
Ezali mabe mpo na moto kovanda ye moko
Namonaki lisusu likambo mosusu ya pamba na se ya moyi :
Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko,
azalaki ata na mwana to ndeko te ;
azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi,
kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye.
Mpe atikalaki komituna te :
« Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ?
Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo ? »
Wana mpe lisusu ezali pamba :
ezali mosala ya mpunda !
 
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,
pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.
10 Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;
kasi mawa na moto oyo akweyi
mpe azangi moto oyo akosunga ye !
11 Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko,
bayokaka moto ;
kasi moto oyo azali ye moko,
ndenge nini akoki koyoka moto ?
12 Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ;
kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna.
Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.
Botombolami ezali pamba
13 Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ; 14 ezala soki elenge mobali yango abotama mobola kati na mokili na ye to awuti kobima na boloko mpo na kokoma mokonzi. 15 Namonaki bato nyonso ya bomoi, oyo bazali kotambola na se ya moyi kolanda elenge mobali lokola mokitani ya mokonzi. 16 Ata soki bato oyo bazalaki kosepela na ye bazalaki ebele koleka, kasi bato oyo bakoya sima bakoki koboya ye. Yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
17 Batela makolo na yo tango ozali kokende na Ndako ya Nzambe ; eleki malamu kokende kuna mpo na koyoka, kasi mpo na kobonza mbeka ya bazoba te, pamba te bayebaka te ete basalaka mabe.