6
Bozwi mpe lokumu ezali biloko pamba
Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato : ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.
Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ; pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te ; atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi. Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te ?
Pasi nyonso oyo moto amonaka
ezali mpo ete akokisa baposa na ye,
nzokande baposa yango esilaka kaka te.
Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini ?
Litomba nini mobola azali na yango
ata ayebi kotambola liboso ya bato mosusu ?
Biloko oyo moto azali komona na miso
ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi :
yango mpe ezali pamba,
ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Tango kimia ezalaka malamu koleka maloba
10 Ekelamu nyonso oyo ezali
esila koyebana na kombo na yango,
mpe eyebani malamu soki moto azali nani :
akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.
11 Soki maloba eleki mingi,
makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele ;
bongo litomba na yango ezali penza nini ?
12 Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?