7
Bwanya
Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya,
mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.
Kokende na ndako ya matanga ezali malamu
koleka kokende na ndako oyo ezali na feti,
pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ;
yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi
basengeli kokanisaka na tina na yango.
Mawa eleki koseka na malamu,
pamba te elongi ya mawa eyeisaka motema esengo.
Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga,
kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.
Koyoka pamela ya moto ya bwanya
ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende
oyo ezali kozika na se ya nzungu ;
wana mpe ezali pamba.
 
Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba,
mpe bakado epengwisaka motema.
 
Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ;
kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.
Kotombokaka noki te,
pamba te kanda evandaka kati na bazoba.
 
10 Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo ? »
Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.
 
11 Bwanya ezali lokola libula,
ezalaka malamu mpe epesaka litomba
na bato oyo bamonaka moyi.
12 Bwanya ezali lokola nguba,
ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ;
kasi litomba ya boyebi ezali ete
ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.
13 Tala malamu misala ya Nzambe :
Nani akoki kosembola eloko oyo Ye asili kogumba ?
14 Na mokolo ya malamu, sepela ;
na mokolo ya mabe, kanisa ;
pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale
mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.
15 Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso :
Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye,
mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.
16 Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo
to ya kozala moto ya bwanya ;
mpo na nini komibebisa ?
17 Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ;
mpo na nini kokufa liboso ete mikolo
ya bomoi na yo ekoka ?
18 Ezali malamu kokangama na toli ya liboso
mpe kosimba toli ya mibale,
pamba te moto oyo atosaka Nzambe
akosalela toli nyonso mibale.
 
19 Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi
koleka bakambi zomi kati na engumba.
 
20 Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu,
bongo azanga kosala masumu.
 
21 Kotiaka matoyi na bilobaloba ya bato te,
noki te okoyoka mosali na yo kotiola yo ;
22 pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo,
ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.
23 Namekaki kososola makambo wana nyonso na nzela ya bwanya,
namilobelaki : « Nakosala nyonso mpo ete nakoma moto ya bwanya, »
kasi bwanya ezalaki kaka mosika na ngai.
24 Nyonso oyo ezalisami ezali mosika,
mozindo mpe mozindo makasi ;
nani akoki komona yango ?
25 Boye, na motema na ngai mobimba,
namipesaki mpo na kososola, koyeba,
koluka bwanya mpe boyebi ;
mpe mpo na kososola bozoba ya mabe
elongo na liboma ya bozoba.
 
26 Namoni likambo oyo :
mwasi oyo motema na ye ezali
lokola motambo to monyama,
oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ;
mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye,
kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
27 Mosakoli alobi : « Tala makambo oyo nasosoli sima na koyekola mwasi moko na moko mpo na kozwa mayele :
28 Nazali koluka, kasi nanu namoni te.
Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko,
kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso !
29 Tala makambo oyo nasosoli :
Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu,
kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »