8
Nani azali lokola moto ya bwanya ?
Nani ayebi kolimbola makambo ?
Bwanya engengisaka elongi ya moto,
mpe efungolaka elongi oyo ekangama.
Kotosa mokonzi
Nalobi : Tosaka mitindo ya mokonzi, pamba te olapaki ndayi liboso ya Nzambe. Kolongwaka na lombangu te liboso ya mokonzi mpe kobundelaka likambo ya mabe te, pamba te mokonzi asalaka kaka makambo oyo esepelisaka ye. Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye : « Ozali kosala nini ? »
Moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye
akokweyela pasi te,
mpe motema ya moto ya bwanya eyebaka tango ya malamu
mpe lolenge ya malamu ya kosalela.
Pamba te, ezali na tango ya malamu
mpe na lolenge ya malamu ya kosalela na likambo nyonso.
Atako bongo, pasi ekweyelaka kaka moto.
 
Lokola moto moko te ayebi makambo oyo ekoya sima,
nani akoki koyebisa moninga ndenge ekoyela ye ?
Ndenge moto moko te azali na bokonzi
likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango,
ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi
likolo ya mokolo na ye ya kufa.
Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba,
ndenge mpe misala mabe ebikisaka te
bato oyo basalaka yango.
Namonaki makambo nyonso wana, tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Ezali na tango oyo moto amatelaka bato mosusu mpo na konyokola bango. 10 Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe ; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
11 Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe. 12 Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye. 13 Nzokande, lokola bato mabe batosaka Nzambe te, makambo na bango mpe ekotambola malamu te, mpe mikolo ya bomoi na bango ekowumela te lokola elili.
 
14 Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili : bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.
15 Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.
16 Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu— 17 namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango ; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.