10
1 Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele,  
azalaki kobota mbuma mpo na ye moko.  
Ndenge azalaki kobota mbuma ebele,  
ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ;  
ndenge mabele na ye ekomaki kitoko,  
ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.   
2 Mitema na bango etondi na mabe  
mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango.  
Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango  
mpe akopanza mabanga na bango ya bule.   
   
 
3 Boye bakoloba :  
« Tozali na mokonzi te,  
pamba te totosaki Yawe te.  
Ata tozalaki na mokonzi,  
akokaki kosala nini mpo na biso ? »   
4 Bapesaka bilaka ebele,  
balapaka ndayi ya lokuta  
mpe basalaka boyokani.  
Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge  
oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.   
5 Bavandi ya Samari bazali kolenga  
mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ;  
bato na yango mpe Banganga-Nzambe  
oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe  
bakosala matanga na tina na yango.  
Tika ete basepela lelo  
mpo ete nkembo ya mwana ngombe  
elongwe kati na bango.   
6 Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri  
lokola likabo mpo na mokonzi monene.  
Efrayimi akoyoka soni,  
mpe Isalaele akosambwa  
mpo na mabongisi oyo basalaki.   
   
 
7 Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango  
bakotiola likolo ya mayi  
lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.   
8 Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni  
epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama.  
Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango  
mpe ekozipa yango.  
Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! »  
Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »   
   
 
9 Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea  
mpe obongwani te.  
Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?   
10 Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ;  
bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita  
mpe bakokanga bango minyololo  
likolo ya masumu mibale oyo basalaki.   
   
 
11 Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi  
oyo babokola malamu,  
alingaka kobeta ble ;  
kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko.  
Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda,  
Yuda akobalola mabele,  
Jakobi akopanza-panza yango.   
12 Bolona bosembo mpo na bino moko  
mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo.  
Bomikatela bilanga ya sika,  
pamba te tango ya koluka Yawe ekoki  
kino tango akoya kosopela bino bosembo.   
13 Bolonaki makambo mabe,  
bobukaki mpe makambo mabe  
mpe boliaki mbuma ya lokuta,  
pamba te botiaki elikya na makasi  
mpe na ebele ya basoda na bino.   
14 Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo,  
bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ;  
ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli  
na mokolo ya bitumba,  
tango bamama mpe bana na bango  
bakweyaki na mabele.   
15 Beteli, makambo oyo ekokomela yo  
mpo ete mabe na yo eleki ndelo.  
Tango mokolo yango ekokoka,  
mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.