11
Bolingo na Nzambe mpo na Isalaele 
 
1 Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye,  
mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.   
2 Kasi tango nyonso bazalaki kobenga ye,  
tango nyonso mpe azalaki kokima mosika na Ngai.  
Bazalaki kobonzela banzambe ya Bala mbeka  
mpe kotumbela bikeko malasi ya ansa.   
3 Ezalaki Ngai nde nalakisaki Efrayimi  
ndenge ya kotambola ;  
namemaki bango na maboko na Ngai,  
kasi basosolaki te  
ete Ngai nde nazalaki kobatela bango.   
4 Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ;  
nalongolaki bango ekangiseli na bakingo  
mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.   
   
 
5 Lokola baboyi kozonga epai na Ngai,  
bakozonga mpe na mokili ya Ejipito te,  
kasi mokili ya Asiri nde ekozala mokonzi na bango.   
6 Mopanga ekokota na bingumba na bango,  
ekobuka bikangelo ya bikuke na bango  
mpe ekosukisa mabongisi na bango.   
7 Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo.  
Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo,  
moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.   
Bolingo ekolonga 
 
8 Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ?  
Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ?  
Mpo na nini nasala yo makambo  
oyo nasalaka engumba ya Adima ?  
Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo  
lokola engumba ya Tseboyimi ?  
Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai  
mpe natondi na mawa makasi.   
9 Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi,  
nakobebisa lisusu Efrayimi te.  
Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te !  
Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ;  
nakoya lisusu na kanda te.   
10 Bakolanda Yawe !  
Yawe akoganga lokola nkosi.  
Tango akoganga,  
bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.   
11 Bakoya na kolenga  
lokola bandeke wuta na Ejipito,  
lokola bibenga wuta na Asiri.  
Nakovandisa bango na bandako na bango,  
elobi Yawe.