3
Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana. Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba. Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati. Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize. Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ; babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.
Tango ya Otinieli
Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera. Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye. Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele. 10 Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye. 11 Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.
Tango ya Ewudi
12 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele. 13 Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila. 14 Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe.
15 Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako. 16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye. 17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene. 18 Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango. 19 Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
— Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo.
Mokonzi azongisaki :
— Kimia !
Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda. 20 Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye :
— Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe.
21 Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi. 22 Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga ; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi. 23 Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.
24 Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki :
— Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako.
25 Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se. 26 Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira. 27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango. 28 Alobaki na bango :
— Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino.
Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi. 29 Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi ; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki. 30 Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.
Tango ya Shamagari
31 Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.