4
Tango ya Debora mpe Baraki
Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe. Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi. Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele. Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama. Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye :
— Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori. Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »
Baraki azongiselaki Debora :
— Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.
Debora alobaki na ye :
— Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi.
Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi. 10 Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.
11 Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.
12 Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori, 13 Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni. 14 Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. »
Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye. 15 Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo. 16 Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.
17 Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni. 18 Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye :
— Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te.
Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti. 19 Sisera alobaki na Yaeli :
— Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi.
Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti. 20 Sisera alobaki na Yaeli :
— Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! »
21 Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto ; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele ; mpe Sisera akufaki.
22 Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. »
Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.
23 Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana. 24 Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.