5
Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :
Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso,
mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba,
tika ete bokumisa Yawe !
Bino bakonzi, boyoka !
Bino bakambi, boyoka malamu !
Nalingi koyembela Yawe,
nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Eh Yawe, tango obimaki na Seiri,
tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi,
mabele eninganaki, likolo enyangwanaki,
mapata esopaki mayi.
Bangomba eninganaki liboso ya Yawe,
mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ;
mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te,
bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.
Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te,
ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki,
kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.
Tango baponaki banzambe ya sika,
bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba,
kasi ata nguba moko te to likonga moko te
emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.
Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele,
elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba.
Bokumisa Yawe !
10 Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe,
bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi,
bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa !
11 Bokumisa mingongo ya bayembi,
na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ;
kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola
misala ya bosembo ya Yawe,
misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele.
Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.
12 Debora, lamuka ! Lamuka !
Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba !
Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ;
mwana mobali ya Abinoami !
13 Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi,
bato ya Yawe bakiti mpo na ngai
kati na bilombe ya bitumba.
14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi.
Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga.
Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri,
mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.
15 Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ;
ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu
na makolo kino na lubwaku.
Kasi kati na libota ya Ribeni,
mitema etondaki mingi na makanisi.
16 Mpo na nini avandi kati na lopango ?
Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ?
Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa
tango pamba na kokanisa.
17 Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani.
Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ?
Aseri atikali pembeni ya ebale,
avandi pembeni ya libongo na ye.
18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa,
bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba,
kuna na esika ya bitumba.
19 Bakonzi oyo bazali banguna bayaki
mpe babundisaki biso ;
bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki,
pene ya mayi ya Megido,
kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.
20 Wuta na likolo, minzoto ebundaki ;
na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.
21 Mayi moke ya Kishoni ememaki bango,
mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni.
Tika ete molimo na ngai etambola na nguya !
22 Makolo ya bampunda enyataki mabele,
na kopumbwa na mbangu makasi,
na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.
23 Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe.
Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna !
Pamba te bayei te kosunga Yawe ;
bayei te kosunga bilombe ya bitumba !
24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni,
apambolama kati na basi nyonso !
Tika ete apambolama kati na basi nyonso
oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
25 Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ;
kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo.
26 Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ;
mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali.
Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto,
atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.
27 Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ;
akweyaki na makolo na ye mpe akufaki.
28 Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa,
na sima ya bibende, mpe abandaki koganga :
« Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ?
Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? »
29 Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye,
mpe ye moko amilobeli :
30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba :
Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko,
bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi,
mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »
31 Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo !
Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi
lokola moyi ya midi !
Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.