8
Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon :
— Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ?
Mpe basilikelaki ye makasi.
Kasi Jedeon azongiselaki bango :
— Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ? Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ?
Liloba oyo ekitisaki kanda na bango.
Jedeon alongi bakonzi ya Madiani
Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani. Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka :
— Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani.
Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye :
— Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ?
Jedeon alobaki :
— Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube.
Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.
Jedeon alobaki na bato ya Penueli : « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. »
10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki. 11 Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia. 12 Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso.
Etumbu ya Sukoti mpe ya Penueli
13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi. 14 Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba. 15 Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › »
16 Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube. 17 Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba.
18 Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna :
— Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini ?
Bazongisaki :
— Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi.
19 Jedeon alobaki na bango lisusu :
— Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.
20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo. 21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.
Jedeon aboyi bokonzi
22 Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon :
— Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani.
23 Kasi Jedeon alobaki na bango :
— Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino.
24 Jedeon abakisaki :
— Nalingi kosenga bino eloko moko : Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli.
25 Bana ya Isalaele bazongisaki :
— Tokopesa yango.
Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba. 26 Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. 27 Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.
Suka ya bomoi ya Jedeon
28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei. 29 Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna. 30 Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele. 31 Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. »
32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
33 Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango. 34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. 35 Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.