9
Tango ya Abimeleki
Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki : « Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »
Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali. Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye. Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki. Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
Lisese ya Yotami
Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino. Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive : ‹ Zala mokonzi na biso. › Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › 10 Banzete elobaki na nzete ya figi : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › 11 Nzete ya figi ezongiselaki yango : ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › 12 Banzete elobaki na nzete ya vino : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › 13 Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › 14 Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › 15 Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›
16 Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino, 17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani. 18 Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali. 19 Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye ! 20 Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »
21 Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
22 Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato. 23 Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita. 24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali. 25 Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
26 Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema. 27 Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe. 28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ? 29 Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi. 31 Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo. 32 Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama. 33 Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
34 Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi. 35 Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki. 36 Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli :
— Tala, bato bazali kokita wuta na likolo na bangomba.
Kasi Zebuli alobaki na ye :
— Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bililingi ya bangomba.
37 Kasi Gali alobaki lisusu :
— Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo.
38 Zebuli alobaki na Gali :
— Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !
39 Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki. 40 Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke. 41 Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
Abimeleki abengani Sishemi
42 Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki. 43 Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango. 44 Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso. 45 Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa. 46 Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango. 47 Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana. 48 Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. » 49 Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.
Kufa ya Abimeleki
50 Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango. 51 Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna ; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango. 52 Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango. 53 Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto. 54 Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki. 55 Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.
56 Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo. 57 Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.