10
Yesu, Mobateli malamu ya bameme
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi. Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme.
Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda. Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye. Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.
Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango. Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : Ngai nazali ekuke ya bameme. Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te. Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. 10  Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
11  Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye. 12  Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango. 13  Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
14  Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai 15  —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai. 16  Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko. 17  Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu. 18  Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.
19 Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango. 20 Mingi kati na bango bazalaki koloba :
— Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?
21 Bamosusu bazalaki kozongisa :
— Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?
Yesu azali Mwana na Nzambe to motioli
22 Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi. 23 Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo. 24 Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye :
— Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele !
25 Yesu azongiselaki bango :
— Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai ; 26  kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te. 27  Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai. 28  Napesi yango bomoi ya seko : ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. 29  Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai. 30  Ngai mpe Tata tozali se moko.
31 Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye, 32 kasi Yesu alobaki na bango :
— Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?
33 Bayuda bazongiselaki Ye :
— Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.
34 Yesu alobaki na bango :
— Ekomama te kati na mibeko na bino : « Nalobi : ‹ Bozali banzambe ? › »
35  Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki, 36  mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili : « Ozali kofinga, » mpo nalobaki : « Nazali Mwana na Nzambe ? »
37  Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te. 38  Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
39 Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango. 40 Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna. 41 Bato mingi penza bayaki epai na Ye ; bazalaki koloba : « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo ! »
42 Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.