9
Yesu abikisi mokufi miso
Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. Bayekoli na Ye batunaki Ye :
— Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?
Yesu azongisaki :
— Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso mpe alobaki na ye :
— Kende kosukola na liziba ya Siloe.
Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba :
— Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ?
Bamoko bazalaki koloba :
— Ezali ye !
Bamosusu :
— Te, ezali ye te ; akokani na ye !
Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba :
— Ezali ngai !
10 Bongo batunaki ye :
— Miso na yo ebikaki ndenge nini ?
11 Azongiselaki bango :
— Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.
12 Batunaki ye lisusu :
— Moto yango azali wapi ?
Azongisaki :
— Nayebi te !
Mituna ya Bafarizeo epai ya mokufi miso oyo abikaki
13 Bamemaki liboso ya Bafarizeo, mokufi miso oyo abikaki. 14 Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki potopoto mpo na kobikisa miso ya mokufi miso yango ezalaki mokolo ya Saba. 15 Yango wana Bafarizeo mpe batunaki ye soki ndenge nini miso na ye ebikaki. Azongiselaki bango :
— Atiaki ngai potopoto na miso, nasukolaki mpe nakomi komona.
16 Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki :
— Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba.
Kasi bamosusu balobaki :
— Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ?
Bokabwani ekotaki kati na bango.
17 Batunaki lisusu mokufi miso :
— Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ?
Azongiselaki bango :
— Azali mosakoli.
18 Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye 19 mpe batunaki bango :
— Mobali oyo azali mwana na bino ? Boni, abotama solo mokufi miso ? Ndenge nini sik’oyo akomi komona ?
20 Baboti na ye bazongisaki :
— Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso ; 21 kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo ; akoloba na tina na ye moko.
22 Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto. 23 Yango wana baboti na ye bazongisaki : « Botuna ye moko, azali mokolo. »
24 Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye :
— Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
25 Azongiselaki bango :
— Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te ; kasi ngai nayebi kaka likambo moko : nazalaki mokufi miso, kasi sik’oyo, nakomi komona.
26 Batunaki ye lisusu :
— Asalaki yo nini ? Abikisaki miso na yo ndenge nini ?
27 Azongiselaki bango :
— Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango ? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye ?
28 Bongo Bafarizeo bakomaki kofinga ye mpe koloba :
— Ezali yo nde ozali moyekoli na ye ; biso tozali bayekoli ya Moyize. 29 Toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize ; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi !
30 Moto yango azongisaki :
— Oh, ezali penza likambo ya kokamwa soki boyebi te epai nini awuti ! Kasi mpo na ngai, abikisi miso na ngai. 31 Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye. 32 Mpe totikala nanu koyoka te ete moto abikisi moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. 33 Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.
34 Bazongiselaki ye :
— Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso ?
Boye, babenganaki ye.
Bakufi miso ya solo
35 Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye :
— Boni, ondimi Mwana na Moto ?
36 Moto wana azongiselaki Ye :
— Nkolo, azali nani ? Yebisa ngai mpo ete nandima Ye.
37 Yesu alobaki :
— Omoni Ye ! Ezali Ye oyo azali koloba na yo.
38 Moto yango azongisaki :
— Nkolo, nandimi.
Mpe agumbamelaki Ye.
39 Yesu alobaki :
— Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili ; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.
40 Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu :
— Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso ?
41 Yesu azongiselaki bango :
— Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te ; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.