8
Mwasi oyo bakangi na ekobo
Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.
Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo ; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso. Balobaki na Yesu :
— Moteyi, mwasi oyo asali ekobo ; bakuti ye penza azali kosala yango ! Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye.
Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele. Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango :
— Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele. Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo, 10 Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye :
— Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi ? Boni, ata moko te akateli yo etumbu ?
11 Mwasi azongisaki :
— Nkolo, moko te !
Bongo Yesu alobaki na ye :
— Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]*
Yesu azali pole ya mokili
12 Yesu alobaki lisusu na bato :
— Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
13 Bafarizeo balobaki na Ye :
— Ozali kotatola mpo na yo moko, litatoli na yo ezali ya solo te.
14 Yesu azongiselaki bango :
— Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende ; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende. 15  Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te. 16  Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te : Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai. 17  Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo. 18  Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai.
19 Bongo batunaki Ye :
— Tata na yo azali wapi ?
Yesu azongisaki :
— Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai.
20 Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
Yesu azali nani ?
21 Yesu alobaki na bango lisusu :
— Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
22 Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango :
— Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna ? »
23 Yesu azongiselaki bango :
— Bino, bozali bato ya se ; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo ; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te. 24  Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
25 Batunaki Ye :
— Boye ozali nani ?
Yesu azongiselaki bango :
— Oyo nazali koloba na bino wuta na ebandeli. 26  Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
27 Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata. 28 Alobaki lisusu :
— Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai. 29  Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
30 Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
Bonsomi ya solo
31 Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye :
— Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai, 32  bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
33 Bazongiselaki Ye :
— Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?
34 Yesu azongiselaki bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu. 35  Nzokande, mowumbu azalaka kati na libota tango nyonso te, kasi mwana azali kati na yango mpo na seko. 36  Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi. 37  Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai. 38  Ngai, nazali koloba makambo oyo namonaki epai ya Tata na Ngai ; bino mpe bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.
39 Bazongisaki :
— Ezali Abrayami nde azali tata na biso.
Yesu alobaki na bango :
— Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki. 40  Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te. 41  Bozali penza kosala misala ya tata na bino.
Bazongisaki :
— Tozali bana ya makangu te ; tozali kaka na tata moko : Nzambe !
42 Yesu alobaki na bango :
— Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai. 43  Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino. 44  Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta. 45  Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te. 46  Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu ? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te ? 47  Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka ; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.
48 Bayuda bazongiselaki Ye :
— Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.
49 Yesu azongisaki :
— Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai. 50  Nalukaka lokumu na Ngai moko te ; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka. 51  Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.
Yesu mpe Abrayami
52 Na yango, Bayuda balobaki na Ye :
— Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te ! 53 Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa ? Yango yo, ozali komimona nani ?
54 Yesu azongiselaki bango :
— Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu. 55  Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye. 56  Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.
57 Bayuda balobaki na Ye :
— Nini ? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami !
58 Yesu azongisaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
59 Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.
* 8:11 Biteni oyo, 7.54–8.11, ezali te na mikanda mosusu