12
Mari asopeli Yesu malasi
(Mat 26.6-13; Mlk 14.3-9)
Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda. Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu ; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.
Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.
Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki :
— Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola ?
Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.
Kasi Yesu alobaki :
— Tika ye kimia ! Abombi malasi yango mpo na mokolo oyo bakokunda Ngai. Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
Banganga-Nzambe balingi koboma Lazare
Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi. 10 Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe basalaki mabongisi mpo na koboma mpe Lazare ; 11 pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.
Yesu akoti na Yelusalemi
(Mat 21.1-11; Mlk 11.1-11; Lk 19.28-40)
12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi. 13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga :
« Ozana !
Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo,
Mokonzi ya Isalaele ! »
14 Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama :
15 « Siona, engumba kitoko, kobanga te !
Tala, mokonzi na yo azali koya,
avandi na likolo ya mwana ya ane ! »
16 Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
17 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki. 18 Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango. 19 Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango :
— Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye !
Yesu alobeli kufa na Ye
20 Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki. 21 Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo :
— Tata, tolingi komona Yesu.
22 Filipo akendeki koyebisa Andre ; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu.
23 Yesu azongiselaki bango :
— Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye. 24  Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele. 25  Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko. 26  Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai. 27  Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo ! 28  Tata, pesa Kombo na Yo nkembo !
Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo :
— Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !
29 Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki :
— Ezali kake !
Bato mosusu balobaki :
— Anjelu moko asololi na ye !
30 Kasi Yesu alobaki na bango :
— Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino. 31  Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo ; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda. 32  Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.
33 Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa. 34 Bato bazongiselaki Ye :
— Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso : « Mwana na Moto asengeli kotombolama ? » Nani nde Mwana na Moto ?
35 Yesu alobaki na bango :
— Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo. 36  Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole.
Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.
Bayuda baboyi kondima Yesu
37 Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te 38 mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama :
« Nkolo, nani andimaki mateya na biso ?
Mpe nguya na Yo emonisamaki epai ya nani ? »
39 Ezali lisusu Ezayi nde alobaki tina oyo bakokaki kondima te :
40 « Azipaki miso na bango
mpe akomisaki bango mitema makasi,
mpo ete bamona te na miso na bango,
basosola te na mitema na bango,
babongola mitema te,
mpe ngai nabikisa bango te. »
41 Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.
42 Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye ; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani, 43 pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.
44 Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi :
— Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ; 45  mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai. 46  Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili. 47  Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.
48  Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka. 49  Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te ; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya. 50  Nzokande, nayebi malamu ete mitindo na Ye epesaka bomoi ya seko ; yango wana nazali koloba makambo oyo, ndenge kaka Tata ayebisaki Ngai yango.