Maloba ya suka ya Moteyi
13
Yesu asukoli makolo ya bayekoli na Ye
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu. Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe ; atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo. Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo. Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye :
— Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ?
Yesu azongiselaki ye :
— Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo ; kasi okososola yango na sima.
Kasi Petelo alobaki na Yesu :
— Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo !
Yesu azongiselaki ye :
— Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.
Simona Petelo alobaki na Yesu :
— Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto.
10 Yesu alobaki na ye :
— Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te.
11 Solo, Yesu ayebaki moto oyo akoteka Ye ; yango wana alobaki : « Bino nyonso bozali peto te. »
12 Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango :
— Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino ? 13  Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo. 14  Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo ; 15  pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino. 16  Nazali koloba na bino penza ya solo : mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi. 17  Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.
18  Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama :
« Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai
abalukeli ngai ! »
19  Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali. 20  Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai.
Yuda ateki Yesu
(Mat 26.20-25; Mlk 14.17-21; Lk 22.21-23)
21 Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema ; alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.
22 Bayekoli bakomaki kotalana bango na bango mpe kotunana mpo na koluka koyeba soki Yesu azalaki koloba na tina na nani. 23 Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu. 24 Simona Petelo afinaki ye miso mpo na kosenga na ye ete atuna Yesu soki azali koloba bongo na tina na nani. 25 Mbala moko, moyekoli yango alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye :
— Nkolo, ezali nani ?
26 Yesu azongisaki :
— Ezali moto oyo nakopesa eteni oyo ya lipa sima na Ngai kozindisa yango kati na elubu.
Bongo, sima na Yesu kozindisa eteni yango ya lipa kati na elubu, akamataki yango mpe apesaki yango epai ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona.
27 Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye :
— Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.
28 Kasi, kati na bato oyo bazalaki wana na mesa, moko te asosolaki tina oyo Yesu alobaki na ye bongo. 29 Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. » 30 Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki.
Mobeko ya sika
31 Sima na Yuda kobima, Yesu alobaki :
— Sik’oyo, nkembo ya Mwana na Moto emonisami, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na Ye. [ 32  Lokola Nzambe akozwa nkembo kati na Mwana,]*Nzambe mpe akopesa Mwana nkembo, kati na Ye moko, mpe akosala yango kala mingi te.
33  Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »
34  Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino. 35  Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.
Petelo awangani Yesu
(Mat 26.33-35; Mlk 14.29-31; Lk 22.31-34)
36 Simona Petelo atunaki Yesu :
— Nkolo, ozali kokende wapi ?
Yesu azongiselaki ye :
— Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima.
37 Petelo atunaki lisusu :
— Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo ? Nabongami kokufa mpo na Yo.
38 Yesu azongiselaki ye :
— Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
* 13:32 Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.