11
Yesu alakisi bayekoli kosambela
(Mat 6.9-13)
Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye :
— Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.
Yesu alobaki na bango :
— Tango bozali kosambela, boloba :
Tata,
tika ete Kombo na Yo ebulisama,
tika ete Bokonzi na Yo eya !
Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,
limbisa masumu na biso,
pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso
oyo asalaka biso mabe ;
mpe komema biso na komekama te.
Alobaki na bango lisusu :
— Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi : « Molingami, defisa ngai mapa misato ; pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. » Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
(Mat 7.7-11)
Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. 10  Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
11  Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi, 12  to akopesa ye koto soki asengi ye liki ? 13  Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Nzambe to Satana
(Mat 12.22-30; Mlk 3.20-27)
14 Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki. 15 Kasi bamoko kati na bango balobaki :
— Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
16 Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo. 17 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango :
— Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya. 18  Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule. 19  Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
20  Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino. 21  Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu ; 22  kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
23  Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
(Mat 12.43-45)
24  Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »
25  Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu. 26  Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.
27 Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato :
— Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele !
28 Yesu azongisaki :
— Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !
Elembo ya Yona
(Mat 12.38-42)
29 Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki :
— Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ; 30  pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.
31  Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo. 32  Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.
Mwinda ya nzoto
(Mat 5.15; Mlk 4.21)
33  Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
(Mat 6.22-23)
34  Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili. 35  Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te. 36  Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
Yesu atelemeli Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko
(Mat 23.4-36)
37 Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa. 38 Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia.
39 Bongo, Nkolo alobaki na ye :
— Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe. 40  Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ? 41  Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.
42  Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
43  Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka. 44  Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !
45 Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu :
— Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso !
46 Yesu azongisaki :
— Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.
47  Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma ! 48  Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
49  Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. » 50  Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo, 51  kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
52  Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.
53 Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge, 54 na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.