12
Kotatola mpo na Yesu
(Mat 10.26-33; 10.19-20)
Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye :
— Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta ! Eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana. Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
Balingami na Ngai, nazali koloba na bino : bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te. Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino : Ye nde bosengeli kobanga.
Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango. Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te ; boleki bandeke mike ebele na motuya.
Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ; kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya ba-anjelu ya Nzambe. 10  Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.
11  Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ; 12  pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.
Lisese ya mozwi oyo azangi mayele
13 Moto moko kati na ebele ya bato alobaki na Yesu :
— Moteyi, loba na ndeko na ngai ete akabola na ngai libula oyo tata atikelaki biso.
14 Yesu azongiselaki ye :
— Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?
15 Bongo alobaki na bato nyonso :
— Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
16 Mpe alobaki na bango lisese oyo :
— Bilanga ya mozwi moko ebotaki bambuma ebele penza. 17  Akomaki kokanisa mpe komituna : « Nasala nini ? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »
18  Bongo amilobelaki lisusu : « Nakosala boye : nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu. 19  Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »
20  Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »
21  Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.
(Mat 6.25-34)
22 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? 23  Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.
24  Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya. 25  Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ? 26  Soki bokoki kosala te makambo oyo ya mike-mike, bongo mpo na nini komitungisa na tina na makambo mosusu ? 27  Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.
28  Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke ?
29  Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino. 30  Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango. 31  Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
32  Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !
(Mat 6.19-21)
33  Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ; 34  pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.
Komibongisa mpo na koya ya Nkolo
(Mat 24.45-51)
35  Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela. 36  Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke. 37  Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei. 38  Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.
(Mat 24.43-51)
39  Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye. 40  Bino mpe bomilengela, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te kozela Ye.
41 Petelo atunaki Yesu :
— Nkolo, ozali koloba lisese oyo mpo na biso to mpo na bato nyonso ?
42 Nkolo azongisaki :
— Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ? 43  Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo ! 44  Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
45  Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa, 46  nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.
47  Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele. 48  Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.
Bokabwani mpe etumbu
49  Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela. 50  Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango !
(Mat 10.34-36)
51  Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Kimia te, bokabwani nde. 52  Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana : misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato. 53  Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.
(Mat 16.2-3)
54 Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato :
— Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko : « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo. 55  Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka : « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.
56  Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?
(Mat 5.25-26)
57  Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ? 58  Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko. 59  Nazali koloba na yo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.