19
Zashe azwi lobiko
Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango. Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ; azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza. Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.
Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye :
— Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.
Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba :
— Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye :
— Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.
Yesu alobaki na ye :
— Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami. 10  Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.
Lisese ya mbongo
(Mat 25.14-30)
11 Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango. 12 Boye Yesu alobaki :
— Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo ; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga. 13  Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
14  Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
15  Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
16  Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
17  Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
18  Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
19  Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
20  Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba. 21  Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
22  Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te. 23  Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »
24  Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana : « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
25  Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »
26  Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 27  Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
Lotomo ya Yesu na Yelusalemi
Bayambi Yesu na nkembo monene
(Mat 21.1-11, 15-17; Mlk 11.1-10; Yn 12.12-16)
28 Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.
29 Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ; 30 alobaki na bango :
— Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa. 31  Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »
Boloba na ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »
32 Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.
33 Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango :
— Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane ?
34 Bazongisaki :
— Nkolo azali na bosenga na yango.
35 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
36 Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela. 37 Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki. 38 Bazalaki koloba :
« Tika ete apambolama,
mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo !
Kimia kati na Likolo,
mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo ! »
39 Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu :
— Moteyi, pamela bayekoli na Yo !
40 Yesu azongisaki :
— Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !
Etumbu ya Yelusalemi
41 Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango 42 mpe alobaki :
— Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo. 43  Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ; 44  bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
Yesu ateyi kati na Tempelo
(Mat 21.12-13; Mlk 11.15-19; Tala Yn 2.13-17)
45 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna ; alobaki na bango :
46  — Ekomama : « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo ; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi !
47 Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ; 48 kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.