20
Bokonzi ya Yesu endimami te
(Mat 21.23-27; Mlk 11.27-33)
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ; balobaki na Ye :
— Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
Yesu azongisaki :
— Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai : Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?
Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? › Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. » Boye, bazongisaki :
— Toyebi te epai wapi ewutaki.
Yesu alobaki :
— Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
Lisese ya basali mabe ya elanga ya vino
(Mat 21.33-46; Mlk 12.1-12)
Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo :
— Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi. 10  Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 11  Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 12  Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.
13  Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. »
14  Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! »
15  Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.
Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ? 16  Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu.
Tango bato bayokaki bongo, balobaki :
— Te, ekoki kosalema te !
17 Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki :
— Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini :
« Libanga oyo batongi ndako babwakaki
ekomi libanga ya songe ya ndako ? »
18  Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
19 Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato.
Mpako ya kofuta epai ya Sezare
(Mat 22.15-22; Mlk 12.13-17)
20 Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
21 Banongi yango batunaki Yesu :
— Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. 22 Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?
23 Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango :
24  — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ?
Bazongisaki :
— Ya Sezare !
25 Yesu alobaki na bango :
— Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
26 Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
Eyano ya Yesu na tina na lisekwa
(Mat 22.23-33; Mlk 12.18-27)
27 Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo :
28 — Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. » 29 Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te. 30 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; 31 sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.
32 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 33 Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ?
34 Yesu azongisaki :
— Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ; 35  kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te 36  mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi. 37  Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » 38  Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.
39 Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki :
— Moteyi, olobi malamu !
40 Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Eyano ya Yesu na tina na bomoto ya Klisto
(Mat 22.41-46; Mlk 12.35-37)
41 Yesu mpe atunaki bango :
— Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ? 42  Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo :
« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
43  kino nakomisa banguna na Yo
enyatelo makolo na Yo. › »
44  Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
Yesu akebisi bayekoli na Ye
(Mat 23.1, 5-7; Mlk 12.37-40)
45 Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
46  — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; 47  bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.