12
Shishaki abundisi Yuda
(1Ba 14.21-31)
Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe. Boye, lokola bazalaki lisusu kotosa Yawe te, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi na mobu ya mitano ya bokonzi ya Roboami. Ayaki wuta na Ejipito elongo na bashar nkoto moko na nkama mibale, basoda nkoto tuku motoba oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na mampinga ya basoda ebele oyo motango na bango ekokaki kotangama te : basoda ya mokili ya Libi, ya Suki mpe ya Kushi. Abotolaki bingumba batonga makasi ya Yuda mpe akendeki kino na Yelusalemi.
Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango :
— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »
Mokonzi elongo na bakambi ya Isalaele bamikitisaki, bandimaki mabe na bango mpe balobaki :
— Yawe azali sembo !
Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya :
— Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te ; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki. Nzokande bakokoma bawumbu na ye mpe, na bongo, bakoyeba bokeseni nini ezali kati na kosalela Ngai mpe kosalela bakonzi ya bamboka mosusu.
Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi, azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba ya wolo oyo Salomo asalisaki. 10 Na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli ekotelo ya ndako ya mokonzi. 11 Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki kokende elongo na ye, bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
12 Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda.
Suka ya bokonzi ya Roboami
(1Ba 14.21-24, 29-31)
13 Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. 14 Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe.
15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami. 16 Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.