13
Abiya, mokonzi ya Yuda
(1Ba 15.1-6)
Tango Jeroboami akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiya akomaki mokonzi ya Yuda mpe akonzaki mibu misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Mikaya. » Mikaya azalaki mwana ya Urieli, moto ya Gibea. Ezalaki na etumba kati na Abiya mpe Jeroboami.
 
Bongo kati na mampinga na bango, emonanaki ete Abiya azalaki na bilombe ya bitumba nkoto nkama minei, mpe Jeroboami, nkoto nkama mwambe. Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki : « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu ! Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te ? Kasi Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mosali ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, atelemaki mpo na kotombokela mokonzi na ye. Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge ! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango. Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe. Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi ? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka ? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te. 10 Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te ; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango. 11 Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye. 12 Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi ; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
13 Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo : liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele ; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki. 14 Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo. 15 Basoda ya Yuda babetaki lokito ya bitumba ; mpe na lokito na bango, Yawe Nzambe akweyisaki Jeroboami mpe Isalaele nyonso liboso ya Abiya mpe ya Yuda. 16 Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda. 17 Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano. 18 Na tango wana, basoda ya Isalaele basambwaki ; kasi ba-oyo ya Yuda bazwaki elonga, pamba te batiaki elikya na Yawe, Nzambe ya batata na bango.
19 Abiya alandaki Jeroboami mpe abotolaki ye bingumba ebele : Beteli, Yeshana mpe Efroni elongo na bamboka na yango ya zingazinga. 20 Na mikolo nyonso oyo Abiya azalaki na bokonzi, Jeroboami azongelaki te nguya na ye ya kala. Yawe abetaki ye mpe akufaki. 21 Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba.
(1Ba 15.7-8)
22 Makambo mpe misala mosusu ya Abiya, etamboli mpe maloba na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya momoni makambo Ido.
23 Abiya akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Na tango oyo Asa azalaki mokonzi, mokili ezalaki na kimia mibu zomi.