17
Jozafati, mokonzi ya Yuda
Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele. Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi ; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki. Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala. Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye : alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele. Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu. Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera.
Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe. Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa : Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya ; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami. Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.
10 Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati. 11 Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo. 12 Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.
13 Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia ; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko. 14 Tala motango na bango kolanda mabota na bango :
Kati na libota ya Yuda,
bakonzi ya bankoto : Adina, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama misato ;
15 sima na ye, Yoanani : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe ;
16 sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.
17 Kati na libota ya Benjame :
Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba ;
18 Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe.
19 Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba.