18
Jozafati asali boyokani elongo na Akabi
(1Ba 22.1-28)
Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala. Sima na ndambo ya mibu, akendeki kotala Akabi kati na Samari. Akabi abomaki bameme mpe bangombe ebele mpo na koyamba ye mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Atindikaki ye na kokende na Ramoti ya Galadi. Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda :
— Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ?
Jozafati azongisaki :
— Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko ; tokokende elongo na yo na bitumba.
Kasi Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele :
— Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
Boye, mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli nkama minei mpe atunaki bango :
— Boni, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Bazongiselaki ye :
— Kende, pamba te Nzambe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
Kasi Jozafati atunaki lisusu :
— Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ?
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati :
— Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila.
Jozafati alobaki :
— Tika ete mokonzi aloba bongo te !
Bongo mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye :
— Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila.
Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. 10 Nzokande, moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki :
— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na maseke oyo, okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. »
11 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi ! Okolonga, pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
12 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye :
— Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi.
13 Kasi Mishe azongisaki :
— Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
14 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye :
— Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Azongisaki :
— Bokende ! Bokolonga ! Bakokabama na maboko na bino !
15 Kasi mokonzi alobaki na ye :
— Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?
16 Mishe azongisaki :
— Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
17 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati :
— Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, alobaka kaka mpo na mabe !
18 Mishe alobaki :
— Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 19 Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? »
Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. 20 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. »
Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? »
21 Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. »
Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »
22 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo.
23 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki :
— Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?
24 Mishe azongisaki :
— Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
25 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo :
— Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. 26 Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
27 Mishe alobaki :
— Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te !
Abakisaki :
— Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Babomi mokonzi Akabi na bitumba
(1Ba 22.29-36)
28 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. 29 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati :
— Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi.
Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba. 30 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar :
— Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele.
31 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye. 32 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. 33 Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar :
— Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki.
34 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki.