24
Joasi abongisi Tempelo ya Yawe
(2Ba 12.1-17)
Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba. Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada. Yeoyada aponaki mpo na Joasi basi mibale oyo babotelaki ye bana mibali mpe bana basi.
Sima na yango, Joasi azwaki mokano ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango :
— Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo.
Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te. Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye : « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli ? »
Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.
Mokonzi apesaki mitindo ete basala sanduku, batia yango na libanda ya ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe batatola kati na Yuda mpe kati na Yelusalemi ete basengeli komemela Yawe mpako oyo Moyize, mosali na Nzambe, akatelaki Isalaele kati na esobe. 10 Bakalaka nyonso mpe bato nyonso basepelaki na yango : bamemaki mbongo na bango mpe batiaki yango kati na sanduku kino etondaki. 11 Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele. 12 Mokonzi mpe Yeoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kosala misala ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Bafutaki babuki mabanga, basharipantie mpe bato oyo basalaka misala ya bibende mpe ya bronze na moto, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe. 13 Bato oyo bazalaki kosala misala basalaki yango noki, mpe misala ezalaki kotambola malamu na bokambami na bango. Babongisaki Tempelo ya Nzambe ndenge ezalaka. 14 Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.
 
15 Yeoyada akomaki mobange makasi, atondaki mikolo mpe akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. 16 Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe.
Mabe ya Joasi
17 Sima na kufa ya Yeoyada, bakambi ya Yuda bayaki kopesa mokonzi lokumu, mpe mokonzi ayokaki bango. 18 Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi. 19 Atako Yawe atindaki basakoli kati na bango mpo na kozongisa bango epai na Ye, mpe atako basakoli bapamelaki bango, kasi batikalaki kaka koyoka te. 20 Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki : « Tala makambo oyo Nzambe alobi : ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te ? Bokokende liboso te ! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › »
21 Kasi bato basalelaki ye likita ; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe.
22 Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! »
Etumbu mpe suka ya Joasi
(2Ba 12.18-22)
23 Na suka ya mobu, basoda ya Siri babundisaki Joasi, bakotaki na makasi kati na Yuda mpe Yelusalemi, babomaki bakambi nyonso ya bato mpe batindaki bomengo nyonso ya bitumba epai ya mokonzi na bango, na Damasi. 24 Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi. 25 Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te. 26 Tala bato oyo basalelaki ye likita : Zabadi, mwana mobali ya Shimeati, mwasi ya mboka Amoni ; mpe Yozabadi, mwana mobali ya Shimiriti, mwasi ya Moabi. 27 Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.