25
Amatsia, mokonzi ya Yuda
(2Ba 14.1-6)
Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te. Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye, mokonzi. Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Amatsia abengisaki bato ya Yuda mpe atiaki, kolanda mabota na bango, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpo na Yuda mobimba mpe Benjame. Atangaki motango ya bato oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata : bazalaki mibali nkoto nkama misato oyo baselingwa mpo na kosala mosala ya soda, kobunda na makonga mpe na nguba. Kati na Isalaele, azwaki lisusu na mosala ya soda, na motuya ya bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, basoda ya mpiko nkoto nkama moko. Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki :
— Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi. Ata soki okeyi kobunda na mpiko nyonso, Nzambe akokweyisa yo liboso ya monguna, pamba te azali na makoki ya kosunga mpe ya kokweyisa.
Amatsia atunaki moto na Nzambe :
— Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini ?
Moto na Nzambe azongisaki :
— Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana.
10 Boye, Amatsia azongisaki na bandako na bango, basoda oyo bayaki epai na ye wuta na Efrayimi. Kasi basoda yango basilikelaki Yuda mpe bazongaki na bandako na bango na kanda makasi.
(2Ba 14.7-14)
11 Amatsia azwaki mpiko mpe akambaki mampinga na ye kino na Lubwaku ya mungwa epai wapi abomaki bato ya Seiri nkoto zomi. 12 Bato ya Yuda bakangaki lisusu bato ya bomoi nkoto zomi, bamemaki bango na songe ya ngomba mpe batindikaki bango wuta na songe ya ngomba ; mpe bango nyonso bakweyaki na se, banzoto na epanzanaki na biteni.
13 Na tango wana, basoda oyo Amatsia azongisaki mpe apekisaki kokende na bitumba bakotaki na makasi kati na bingumba ya Yuda longwa na Samari kino na Beti-Oroni. Babomaki bato nkoto misato mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba.
Joasi alongi Amatsia
14 Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye ; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi. 15 Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia ; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia :
— Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo ?
16 Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye :
— Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo !
Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki :
— Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.
(2Ba 14.8-20)
17 Sima na Amatsia, mokonzi ya Yuda, kotuna toli epai ya bapesi toli na ye, abetaki mondenge na Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele ; alobaki :
— Yaka tobunda !
18 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda :
— Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba ya Libani elekaki mpe enyataki nzete ya sende. 19 Solo, ozali komilobela ete olongi Edomi, mpe motema ezali kosepela mpe komikumisa. Tala, ekoleka malamu ete ovanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ?
20 Kasi Amatsia ayokaki ye te, pamba te Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokaba bango na maboko ya Joasi, mpo ete basambelaki banzambe ya Edomi. 21 Boye Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda. 22 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye. 23 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Yoakazi, na Beti-Shemeshi. Amemaki ye na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka. 24 Joasi akamataki palata nyonso, wolo nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe oyo Obedi-Edomi azalaki kobatela, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
25 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele.
26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. 27 Kobanda na tango oyo Amatsia apesaki Yawe mokongo, basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye ; mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna. 28 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Yuda.