17
Babiloni, mwasi ya ndumba
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa. Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »
Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi. Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye. Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali :
Babiloni monene,
Mama ya Basi ya Ndumba
mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.
Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu.
Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.
Liloba ya liboso : mabombami ya mwasi ya ndumba
Bongo anjelu alobaki na ngai : « Mpo na nini ozali komitungisa ? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi. Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu. Makambo oyo ezali penza kosenga mayele oyo bwanya engengisaka mpo na kososola yango. Mito sambo ezali bangomba sambo epai wapi mwasi avandaka. 10 Ezali lisusu bakonzi sambo : mitano kati na bango basila kokweya na bokonzi. Moko azali sik’oyo na bokonzi, mpe mosusu ayei nanu te ; kasi tango akoya, akowumela kaka mpo na tango moke. 11 Bongo nyama oyo, liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Ezali mpe moko kati na bakonzi wana sambo, mpe ezali kokende na libebi na yango.
12 Maseke zomi oyo omonaki ezali bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi te, kasi bakozwa yango mpo na ngonga moko mpe bakosalela yango lisanga na nyama. 13 Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko : kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama. 14 Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »
15 Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota. 16 Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto. 17 Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama. 18 Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »