18
Liloba ya mibale : kokweya ya Babiloni
Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola ; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili. Agangaki na mongongo makasi :
« Ekweyi ! Ekweyi !
Babiloni monene ekweyi penza !
Ekomi ndako ya milimo mabe,
ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo,
ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.
Pamba te bikolo nyonso emelaki
vino ya kanda ya kindumba na yango.
Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni,
mpe bozwi ya bato ya mokili,
oyo basalaka mombongo,
emataki makasi mpo na monzele na yango,
oyo elekaki ndelo. »
Liloba ya misato : etumbu ya Babiloni
Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango. Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe. Bosala yango ndenge kaka yango esalaki bato mosusu, bozongisela yango mbala mibale mabe oyo esalaki bino. Kati na kopo oyo ezalaki kosalela mpo na komelisa bamosusu masanga, botia masanga oyo ezali makasi mbala mibale koleka. Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›
Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko : kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya.
Liloba ya minei, ya mitano mpe ya motoba : bileli na tina na Babiloni
Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango. 10 Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›
11 Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango : 12 wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre ; 13 eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato.
14 Bakoloba : ‹ Biloko oyo ozalaki kolinga mingi ekimi yo mosika ; biloko nyonso oyo ezalaki kosala lolendo mpe lofundu na yo ebebi, ekotikala kozwama lisusu te ! ›
15 Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga. 16 Bakoloba :
‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene,
yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko,
bilamba ya motane makasi,
babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka !
17 Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! ›
Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika. 18 Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? ›
19 Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi :
‹ Mawa ! Mawa na yo,
engumba monene epai wapi bato nyonso
oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene
bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo !
Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›
 
20 Likolo, sepela na libebi na yango !
Bino mpe basantu, bosepela !
Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola !
Pamba te Nzambe alongisi bino
awa akateli yango etumbu. »
Liloba ya sambo : libebi ya suka ya Babiloni
21 Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki :
« Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana,
kaka na makasi moko wana,
mpe ekomonana lisusu te.
22 Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi,
ya babeti piololo mpe babeti kelelo,
ekoyokana lisusu te kati na yo.
Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge
bakomonana lisusu te kati na yo.
Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble
ekoyokana lisusu te kati na yo.
23 Mwinda ekopela lisusu te kati na yo,
mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana
ekoyokana lisusu te kati na yo.
Makambo wana nyonso ekosalema,
pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili.
Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.
24 Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli,
ya basantu mpe ya bato nyonso
oyo babomamaki na mokili. »